Banzembo 121:1-8 LINOCB2020 - Bible AI

1Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ?

2Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

3Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

4Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te !

5Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

6Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

7Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;

8Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

>