Banzembo 150:1-6 LINOCB2020 - Bible AI

1Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !

2Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !

3Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !

4Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !

5Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

6Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !

>