1Oh Siona, lamuka, lamuka !
2Oh Yelusalemi, milongola na putulu,
3Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »
4Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya ; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango.
5Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.
6Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »
7Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba,
8Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ;
9Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi,
10Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule
11Bokende, bokende, bobima awa !
12Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te
13Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama,
14Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye