1Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
2Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.
3Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu :
4Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga.
5Nalobaki :
6Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ;
7atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki :
8Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba :
9Yawe alobaki na ngai :
10Komisa bato oyo mitema makasi,
11Boye nalobaki :
12kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.